12 Akitaki na ndako ya mokonzi, na esika ya kolya ya sɛkrɛtɛrɛ. Bankumu nyonso bafandaki wana: sɛkrɛtɛrɛ Elishama,+ Delaya mwana ya Shemaya, Elenatane+ mwana ya Akabore,+ Gemaria mwana ya Shafane ná Zidikiya mwana ya Hanania mpe bankumu mosusu nyonso.