-
Yirimia 40:5Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Lokola Yirimia azalaki naino kokakatana mpo na kozonga, Nebuzaradane alobaki na ye: “Zongá epai ya Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ oyo mokonzi ya Babilone apesi mokumba ya kokamba bingumba ya Yuda, mpe fandá na ye kati na bato; to esika nyonso oyo olingi.”
Mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki ye ndambo ya biloko ya kolya ná likabo mpe atikaki ye akende.
-