3 ‘Gangá na kolela, Ee Heshibone, mpo Ai abebisami!
Bóbelela, Ee bingumba oyo esimbami na Raba.
Bólata ngɔtɔ.
Bóganga na kolela, mpe bótambolatambola na kati ya mapango ya mabanga,
Mpo Malakame akokende na mboka mopaya
Elongo na banganga-nzambe na ye mpe bankumu na ye.+