11 Miso na ngai elɛmbi na kolela.+
Nabulungani na kati na ngai.
Libale na ngai esopani na mabele, mpo na kokwea ya mwana mwasi ya bato ya ekólo na ngai,+
Mpo bana mpe bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ balɛmbaki makasi na bisika minene ya bato nyonso ya engumba.+