8 Ntango bazalaki koboma bango kaka ngai moko nde natikalaki na bomoi, nakweaki elongi na nse mpe nagangaki ete: “Mawa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Okobebisa baoyo nyonso batikali na Yisraele awa ozali kosopela Yerusaleme nkanda makasi na yo?”+