30 “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Na yango, Ee bato ya Yisraele, nakosambisa mokomoko na bino na kolanda etamboli na ye.+ Bóbongwana, ɛɛ, bóbongwana mpenza, bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko, mpo eloko moko te ezala libaku oyo ezali kotinda bino na lisumu.