28 Basakoli na yo babombi misala na bango ya mabe ndenge bapakolaka mpɛmbɛ na efelo, bazali komona bimonaneli ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ekoya ya bokosi,+ bazali koloba boye: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi,” nzokande Yehova ye moko alobi te.