20 nakomema yo ná baoyo bazali kokita na libulu epai ya bato ya kalakala, nakosala ete ofanda na esika ya nse koleka lokola bisika ya kala oyo ebebisamá; elongo na baoyo bazali kokita na libulu,+ mpo bato báfanda na kati na yo te. Bongo nakokumisa mokili ya baoyo bazali na bomoi.