19 Liboso ya kobima libándá mpo na kokende na lopango ya libándá (esika bato bazali), bakolongola bilamba na bango oyo bazalaki kosala na yango mosala,+ mpe bakotya yango na bisika mosantu ya kolya.+ Na nsima bakolata bilamba mosusu mpo bákómisa bato basantu te na bilamba na bango.