-
Danyele 2:35Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
35 Na ntango yango, ebende, mabele, kwivre, palata ná wolo, yango nyonso ebukanaki mpe ekómaki lokola mposo ya blé na esika ya kotutatuta mbuma na eleko ya molunge, mpe mopɛpɛ ememaki yango, bongo ata ndambo na yango ekokaki komonana te. Kasi libanga oyo ebɛtaki ekeko yango ekómaki ngomba moko monene mpe etondaki mabele mobimba.
-