2 Na nse ya molangwa, Beleshazare apesaki mitindo ete báya na bakɔpɔ ya wolo mpe ya palata oyo tata na ye Nebukadenezare azwaki na tempelo na Yerusaleme,+ mpo ye moko ná bato na ye ya lokumu, mpe basi na ye mosusu ná basi na ye ya pembeni bámɛla na yango.