18 Na mokolo wana, nakosala kondimana mpo na bato na ngai ná banyama ya zamba oyo efandaka na mboka,+
Ná bandɛkɛ ya likoló mpe banyama oyo emibendaka na nse.+
Nakolongola litimbo ná mopanga mpe etumba na mokili yango,+
Mpe nakosala ete bato na ngai báfanda na kimya.+