9 Namonaki Yehova+ atɛlɛmi likoló ya etumbelo, mpe alobaki: “Bɛtá mitó ya makonzí, bongo bisika ya kokɔta na ndako ekoningana. Katá yango mitó, mpe nakoboma baoyo ya nsuka na mopanga. Na baoyo bakokima, moko te akolonga kokima mosika, mpe oyo akoluka kobika, akolonga te.+