12 Sikoyo abandaki koloba na bango na bandakisa: “Moto moko alonaki elanga ya vinyo+ mpe asalaki lopango zingazinga na yango. Atimolaki ekamwelo ya vinyo mpe atongaki ndako moko molai.+ Na nsima atyaki basali-bilanga mpo báfutela yango, mpe akendaki mobembo na mboka mopaya.+