14 Kasi mokambi ya sinagoga ayokaki nkanda mpo Yesu abikisaki moto na mokolo ya Sabata. Na yango alobaki na ebele ya bato boye: “Ezali na mikolo motoba oyo mosala esengeli kosalema;+ yango wana, bóyaka kobikisama na mikolo wana, kasi na mokolo ya Sabata te.”+