9 Kasi alobaki na ngai ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo, mpo nguya na ngai ezali kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.”+ Na yango, na esengo nyonso, nakomikumisa nde mpo na bolɛmbu na ngai, mpo nguya ya Kristo ezala lokola hema likoló na ngai.