12 Mpe namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi.+ Bakufi basambisamaki na kotalela makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango.+