23 Mpe esalemaki boye: na nsuka+ ya mbula, limpinga moko ya basoda ya Siri+ bamataki kobunda na ye,+ mpe babandaki kokɔta na Yuda mpe na Yerusaleme. Bongo kati na ekólo, babomaki bankumu+ nyonso ya bato mpe batindelaki mokonzi ya Damasi biloko nyonso oyo bapunzaki.+