Maloba na nse ya lokasa
a Liloba “pite” oyo Biblia esaleli ezali kaka kosangisa nzoto te, kasi mpe makambo mosusu kati na bato oyo babalani te, na ndakisa kosimbasimba binama ya kobotela ya moto oyo azali molongani na yo te to kosangisa nzoto na monɔkɔ to na esumbeli. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, nkasa 42-47, na Lifalanse.