Maloba na nse ya lokasa
b Bato ya mayele ya Grèce na makambo ya astronomi nde babandisaki likambo ya kosala bakalkile ya bangámbo ya ba-angle mpe ba-triangle. Bato ya mayele ya Islam basalelaki trigonométrie mpo na koyeba esika oyo mboka Mecques ezalaka. Bamizilma balingaka kotala na ngámbo ya Mecques ntango bazali kobondela. Mimeseno na bango esɛngaka mpe básala bongo ntango bazali kokunda ebembe mpe ntango bazali koboma banyama mpo na kolya.