Maloba na nse ya lokasa
c Kobwaka nsoi ezalaki lolenge moko to elembo moko ya kobikisa maladi oyo Bayuda ná bato ya bikólo mosusu bazalaki kondima, mpe makomi ya balabi emonisi ete bato bazalaki kosalela nsoi mpo na kobikisa bato na maladi. Soki Yesu abwakaki nsoi, ezalaki ntango mosusu kaka mpo na komonisa moto yango ete alingi kobikisa ye. Ezala ndenge wana to te, Yesu asalelaki nsoi na ye lokola nkisi te.