Maloba na nse ya lokasa
a Adama ná Eva bakozwela lisiko litomba te. Mibeko ya Moize epesaki etinda oyo soki moto abomi moto moko na nko: “Bosengeli kondima lisiko te mpo na molimo ya moto oyo abomi moto, mpamba te asengeli kokufa.” (Mituya 35:31) Na ntembe te, Adama ná Eva basengelaki kokufa mpo baboyaki kotosa Nzambe na nko. Na ndenge yango, babwakaki likoki na bango ya kozala na bomoi ya seko.