Maloba na nse ya lokasa
a “Sɛkɛlɛ mosantu ya ezaleli . . . ya kokangama na Nzambe” emonisamaki mpe kati na Yesu. (1 Timote 3:16) Ezali nde na moto moko oyo akokoka kotikala sembo epai ya Yehova na makambo nyonso? Motuna wana etikalaki sɛkɛlɛ to libombami na boumeli ya ntango molai. Yesu nde apesaki eyano na motuna yango. Atikalaki sembo na komekama nyonso oyo Satana abimiselaki ye.—Matai 4:1-11; 27:26-50.