Maloba na nse ya lokasa
c Likambo moko oyo esalaki ete makebisi ya ndenge wana ezala mpenza na nguya te ezali mpo bazalaki koloba ete etali kaka etonga moke ya Kristo oyo ezali na bato 144000. Na mokapo ya 5, tokomona ete liboso ya 1935, bazalaki kokanisa ete na kati ya “ebele monene,” oyo Emoniseli 7:9, 10 elobeli na Biblia haut fleuve, ezali mpe na ebele ya bandimi ya mangomba ya bokristo mpe ete bakozwa bisika ya lokumu moke na likoló mpo bayaki na ngámbo ya Kristo na nsuka.