Maloba na nse ya lokasa
a The New Encyclopædia Britannica elobi ete ‘kozonga na bomoi mbala na mbala’ elimboli “kobotama lisusu ya molimo na bomoi mosusu, mbala moko to mpe mbala na mbala, oyo ekoki kozala na lolenge ya moto, ya nyama, to na bantango mosusu, lokola nzeté.” Liloba “kobotama lisusu” esalelamaka mpe mpo na kolobela likambo yango, kasi maloba “kozonga na bomoi mbala na mbala” endimami epai ya bato nyonso. Badiksionere mingi na nkóta ya Inde ezali kosalela maloba yango mibale kozanga kokesenisa yango.