Maloba na nse ya lokasa
a Bongo soki emonani ete mwana oyo azali na libumu akobotama malamu te to soki makei ebele efandi na libumu ya mama? Koluka kokata bokoli ya mwana na libumu na nko ezali kolongola zemi. Bato mingi oyo bazwaka zemi na mayele ya fécondation in vitro (FIV), babotaka bana mibale, misato to mingi; yango ebakisaka lisusu mikakatano, na ndakisa mwasi akoki kobota bana matshombe (to bana oyo bazali na bokɔnɔ) to mpe kobungisa makila mingi na ntango ya kobota. Bakoki kotya mbamba na mwasi oyo azali na bana mingi na libumu, mpo atika ete báboma mwana moko to mibale. Wana ezali mpenza kolongola zemi, oyo ezali lokola koboma moto.—Kob. 21:22, 23; Nz. 139:16.