Maloba na nse ya lokasa
a Bato mingi ya mayele bandimaka ete na ntango ya Mibeko, bazalaki naino koboma mosali-mabe liboso ya kobaka nzoto na ye na nzete. Nzokande, emonani ete kobanda na siɛklɛ ya liboso, Bayuda bakómaki kokakisa basali-mabe mosusu na nzete ntango bazali naino na bomoi mpo bákufa likoló ya nzete yango.