Maloba na nse ya lokasa
a Ndenge totángaka na Misala 20:29, 30, ntoma Paulo amonisaki ete na kati ya masangá, “mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” Na nsima, likambo yango emonanaki na ndenge bokeseni ekómaki komonana kati na bakonzi ya mangomba mpe bandimi mpamba. Na siɛklɛ ya misato, “mobuki mibeko” amonanaki, ayebanaki na etuluku ya bakonzi ya mangomba ya nkombo mpamba.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/1990, nkasa 10-14 (na Lifalanse).