Maloba na nse ya lokasa
a Moto moko ya mayele ya Allemagne na nkombo Heinrich Meyer alobi boye: “Komona . . . ete nzoto ya Yesu ebukanaki te (azalaki na bomoi), mpe ete makila na ye esopanaki te, mpe ata moto moko te [bantoma] akokaki kokanisa likambo ya ndenge wana . . . ete balyaki mpe bamɛlaki mpenza nzoto mpe makila ya Nkolo, kutu Yesu ye moko akokaki kozala na likanisi te ete bayekoli na ye bakotalela maloba na ye ndenge wana.”