Maloba na nse ya lokasa
a Mabongoli mosusu ya Biblia etyaka bavɛrsɛ oyo na Yoane 7:53–8:11, kasi yango ezalaki te na makomi ya ebandeli ya Biblia. Bato mosusu batángaki bavɛrsɛ yango mpe balobaki ete kaka moto oyo azangi lisumu nde akoki kosambisa moto oyo asali ekobo. Kasi mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele elobaki: “Soki bakuti mobali azali kolala na mwasi oyo azali na nkolo na ye, bango mibale basengeli kokufa elongo.”—Kolimbola Mibeko 22:22.