Maloba na nse ya lokasa
a Yehova azwaki ebongiseli moko ya malamu mpo na kopesa bato bonsomi na Yisraele ya kala. Ebongiseli yango ebengamaki Yubile. Biso bakristo tozali na nse ya Mibeko ya Moize te; kasi ezali na ntina mingi tóyeba makambo oyo etali Yubile yango. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo Yubile ya ntango ya kala ekundwelaka biso ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na biso mpe ndenge oyo tokoki kozwela yango matomba.