Maloba na nse ya lokasa
a Basaleli mingi ya Yehova lelo bazali kokutana na mikakatano mpo bakómi mibange to mpo bazali na maladi oyo ezali kosilisa bango makasi. Mpe na bantango mosusu, biso nyonso toyokaka ete nzoto elɛmbi. Na yango, likanisi ya kosala lisano moko ya kopota mbangu ekoki kobangisa biso. Lisolo oyo elobeli ndenge oyo biso nyonso tokoki koyika mpiko mpe kolonga na momekano ya kopota mbangu mpo na bomoi, oyo ntoma Paulo alobelaki.