Maloba na nse ya lokasa
a Na lisolo oyo eleki, tolobelaki mwa makabo ndenge na ndenge oyo Nzambe apesá biso, mpe oyo tokoki komona na miso. Na lisolo oyo, tokotalela mwa makabo mosusu oyo Nzambe apesá biso kasi oyo emonanaka boye te na miso. Mpe tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na makabo yango. Yango ekosalisa biso tózala lisusu na botɔndi mingi epai ya Yehova, Nzambe oyo apesá biso makabo yango.