Maloba na nse ya lokasa
a Mokolo ya pɔsɔ, mwa 27/03/2021 ezali mokolo ya ntina mingi mpo na Batatoli ya Yehova. Na mpokwa ya mokolo yango, tokosala Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Bato mingi oyo bakoyangana na Ekaniseli yango, ezali baoyo Yesu abengaki “bampate mosusu.” Liteya nini ya ntina mpenza Batatoli ya Yehova bayekolaki na mobu 1935 mpo na bampate mosusu? Mapamboli nini bampate mosusu yango bakozwa nsima ya bolɔzi monene? Mpe ndenge nini bampate mosusu bakoki kokumisa Nzambe mpe Kristo ntango bayangani na Ekaniseli?