Maloba na nse ya lokasa
a Ekómelaka yo na bantango mosusu omiyoka ete ozali yo moko? Soki ezali bongo, kobosana te ete Yehova ayebi mpenza ndenge ozali komiyoka mpe azali na mposa ya kosalisa yo. Na lisolo oyo, tokolobela oyo okoki kosala mpo olonga ezaleli ya komiyoka ete ozali yo moko. Tokolobela mpe oyo okoki kosala mpo olendisa bandeko mosusu oyo bamiyokaka ete bazali bango moko.