Maloba na nse ya lokasa
a Biso nyonso tozalaka na mikakatano. Sikoyo tozali ata na likambo moko te oyo tokoki kosala mpo na kosilisa yango nyonso. Tosengeli kaka koyika mpiko. Kasi tozali biso moko te. Yehova mpe azali koyika mpiko na makambo mingi. Na lisolo oyo, tokolobela makambo libwa oyo Yehova azali koyikela mpiko. Lisusu, tokolobela makambo ya malamu oyo emonani mpo Yehova azali koyika mpiko mpe matomba oyo tokoki kozwa na ndakisa na ye.