Maloba na nse ya lokasa
a Mpo libota etambola malamu, mosangani mokomoko asengeli koyeba mokumba oyo azali na yango mpe kosala na bomoko elongo na basangani mosusu ya libota. Tata asengeli kokamba libota na ye na bolingo, mama asengeli kopesa ye mabɔkɔ, mpe bana basengeli kotosa baboti na bango. Ezali mpe bongo mpo na libota ya Yehova. Nzambe na biso azalaka na mokano moko mpo na biso, mpe soki tosali na boyokani na mokano yango, tokotikala na libota na ye mpo na libela.