Maloba na nse ya lokasa
b ELILINGI: Banda bomwana na ye, ndeko mwasi moko abondelaka Yehova mbala na mbala. Ntango azalaki naino mwana moke, baboti na ye balakisaki ye ndenge ya kobondela. Ntango akómaki elenge, akómaki mobongisi-nzela mpe mbala na mbala azalaki kosɛnga Yehova apambola mosala na ye. Bambula na nsima, ntango mobali na ye abɛlaki makasi, asɛngaki Yehova apesa ye makasi ya koyikela mokakatano yango mpiko. Lelo oyo, lokola akómá mwasi oyo mobali akufá, azali kotingama na mabondeli, na elikya ete Yehova akoyanola na mabondeli na ye kaka ndenge asalaki yango na boumeli ya bomoi na ye mobimba.