Maloba na nse ya lokasa
a Yehova azali moninga na biso oyo aleki malamu. Tozwaka boninga na biso ná ye na motuya mingi, mpe tolingaka koyeba ye malamu. Esɛngaka ntango mpo na koyeba moto. Ezali mpe bongo soki tolingi kokómisa boninga na biso ná Yehova makasi. Lokola tozalaka na makambo mingi ya kosala, ndenge nini tokoki kozwa ntango ya kopusana penepene ya Tata na biso ya likoló, mpe matomba nini tokozwa soki tosali bongo?