Maloba na nse ya lokasa
a Tozalaka na botɔndi mingi mpo na mosala makasi oyo bankulutu basalaka mpo na biso na bolingo nyonso! Na lisolo oyo, tokolobela mikakatano minei oyo bankulutu bazalaka na yango. Tokomona mpe ndenge ndakisa ya ntoma Paulo ekoki kosalisa bankulutu lelo oyo bálonga mikakatano yango. Lisolo oyo ekosalisa mpe biso nyonso tómityaka na esika ya bankulutu, mpe ekotinda biso tólinga bango, mpe tópesaka bango mabɔkɔ.