Maloba na nse ya lokasa
a Tozali kobika na eleko moko ya yikiyiki! Bisakweli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ezali kokokisama lelo oyo. Bisakweli yango ezali kotinda biso tósala nini? Lisolo oyo mpe masolo mibale oyo elandi, ekomonisa na mokuse makambo oyo ezali na mokanda ya Emoniseli. Ekomonisa biso makambo oyo tokoki kosala mpo Yehova akoba kondima losambo na biso wana tozali kotosa makambo oyo ekomami na mokanda yango.