Maloba na nse ya lokasa
a Bato mingi bamonaka ete kozwa esengo ya solosolo ezali mpasi, mpamba te balukaka yango na ndenge oyo ebongi te na nzela ya bisɛngo, konduka bomɛngo, koluka lokumu to nguya. Kasi, ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayebisaki bato makambo oyo basengeli kosala mpo bázwa esengo ya solosolo. Na lisolo oyo, tokotalela makambo misato ya ntina oyo ekoki kosalisa biso tózwa esengo ya solosolo.