Maloba na nse ya lokasa
a Bwanya oyo Yehova apesaka eleki mosika eloko nyonso oyo mokili elaki kopesa. Na lisolo oyo, tokotalela liloba oyo ezali kobenda likebi na mokanda ya Masese, elingi koloba, bwanya oyo ezali se koganga na mongongo makasi na bisika ya bato nyonso. Tokolobela ndenge oyo tokoki kokóma na bwanya, ntina oyo bato mosusu balingaka te koyoka bwanya ya Yehova, mpe matomba oyo tozwaka ntango toyokaka bwanya na ye.