Maloba na nse ya lokasa
a Mpo tóyika mpiko na bosembo nyonso na mikolo oyo ya nsuka, tosengeli kokoba kotyela Yehova mpe ebongiseli na ye motema. Zabolo asalelaka komekama mpo na kotinda biso tótika kotyela Yehova motema. Lisolo oyo ekolobela makambo misato oyo Zabolo asalaka mpe makambo oyo tokoki kosala mpo tótikala sembo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye.