Maloba na nse ya lokasa
d Mokonzi Asa asalaki mabunga ya minene. (2 Nt. 16:7, 10) Atako bongo, Biblia elobeli ye na ndenge ya malamu. Liboso aboyaki koyoka mpamela, kasi ekoki kozala ete na nsima abongolaki motema. Yehova amonaki ete bizaleli na ye ya malamu elekaki mabunga na ye. Kutu, Asa azalaki kosambela kaka Yehova mpe asalaki makasi alongola losambo ya bikeko na bokonzi na ye.—1 Bak. 15:11-13; 2 Nt. 14:2-5.