Maloba na nse ya lokasa
a Bayisraele mingi oyo bamonaki makamwisi oyo Yehova asalaki na Mbu Motane bakɔtaki na Mokili ya Ndaka te. (Mit. 14:22, 23) Yehova azwaki ekateli ete bato oyo bazalaki na mbula 20 mpe koleka bakokufa na esobe. (Mit. 14:29) Kasi, Yosua, Kalebe, mpe bana mingi oyo bakokisaki naino mbula 20 te, mpe libota ya Levi bazalaki na bomoi mpe bamonaki kokokisama ya bilaka ya Yehova ntango Yisraele ekatisaki Ebale Yordani mpe ekɔtaki na Kanana.—Mib. 1:24-40.