Mwamitano, 24 sanza ya 10
Koleka nyonso, bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka masumu ebele.—1 Pe. 4:8.
Liloba “makasi” oyo ntoma Paulo asaleli elimboli liloba na liloba “kobenda.” Eteni ya mibale ya vɛrsɛ emonisi oyo tosengeli kosala ntango tozali na bolingo makasi epai ya basusu. Ezipaka masumu ya bandeko na biso. Tokoki komona yango na ndakisa oyo: Tosimbaka bolingo na biso na mabɔkɔ mibale lokola nde elamba oyo ebendanaka, mpe tobendaka yango mokemoke tii ekozipa, moko te, mibale te, kasi “masumu ebele.” Kozipa esalelami mpo na kolobela kolimbisa. Ndenge kaka elamba ekoki kozipa mbeba moko, bolingo mpe ekoki kozipa mabunga mpe kozanga kokoka ya bandeko na biso. Bolingo na biso mpo na basusu esengeli kozala makasi na ndenge ete tokoki kolimbisa mabunga ya bandeko na biso, ata soki ezali mpenza mpasi kosala yango. (Kol. 3:13) Ntango tolimbisaka basusu, tomonisaka ete bolingo na biso ezali makasi mpe ete tolingaka kosepelisa Yehova. w23.11 11-12 par. 13-15
Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 10
Shafane abandaki kotánga yango liboso ya mokonzi.—2 Nt. 34:18.
Ntango akómaki na mbula 26, Mokonzi Yosiya abandisaki mosala ya kobongisa tempelo. Ntango bazalaki kosala mosala yango, “buku ya Mobeko ya Yehova oyo epesamaki na nzela ya Moize” emonanaki. Ntango mokonzi ayokaki maloba oyo batángaki na buku yango, na mbala moko azwaki ekateli ya kotosa yango. (2 Nt. 34:14, 19-21) Ozalaka na mposa ya kotánga Biblia mbala na mbala? Soki ozali sikoyo komeka kosala yango, ezali koleka malamu? Okomaka to otyaka bilembo na bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa yo? Ntango Yosiya akómaki na mbula soki 39, azwaki ekateli moko oyo ememaki ye na liwa. Amityelaki motema na esika asɛnga Yehova atambwisa ye. (2 Nt. 35:20-25) Liteya ezali nini? Ata soki tozali na mbula boni to mpe totángaka Biblia banda kala, tosengeli kokoba koluka Yehova. Yango elimboli kobondela Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga ye atambwisa biso, koyekola Liloba na ye, mpe koyoka toli ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Yango ekoki kosalisa biso tósala te mabunga ya minene mpe tózala na esengo mingi.—Yak. 1:25. w23.09 12 par. 15-16
Mwalomingo, 26 sanza ya 10
Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.—Yak. 4:6.
Biblia elobeli basi mingi oyo balingaki Yehova mpe basalelaki ye. Bazalaki basi oyo “balekisaka ndelo te na bizaleli na bango” mpe “bato ya sembo na makambo nyonso.” (1 Tim. 3:11) Lisusu, na lisangá na bango moko, bandeko basi bakoki komona bandakisa ya bakristo ya basi oyo bakɔmɛli, oyo ebongi komekola. Bandeko basi ya bilenge, mpo na nini te koluka bandeko basi bakristo oyo bakɔmɛli, oyo bokoki kolanda ndakisa na bango? Tyá likebi na bizaleli na bango ya malamu; mpe talá ndenge yo moko okoki komonisa bizaleli yango. Mokristo oyo akɔmɛli amonisaka komikitisa. Soki mwasi azali na komikitisa, akozala na boyokani ya malamu na Yehova mpe na basusu. Na ndakisa, na komikitisa nyonso, mwasi oyo alingaka Yehova aponaka kopesa mabɔkɔ na ebongiseli ya bokonzi oyo Tata na ye ya likoló atyá. (1 Ko. 11:3) Kotosa ebongiseli yango ezali na ntina mingi na lisangá mpe na libota. w23.12 18-19 par. 3-5