Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 23
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Yosiya abongisi makambo (1-20)

      • Basali fɛti ya Elekeli (21-23)

      • Yosiya abongisi makambo mosusu (24-27)

      • Liwa ya Yosiya (28-30)

      • Yehoahaze, mokonzi ya Yuda (31-33)

      • Yehoyakime, mokonzi ya Yuda (34-37)

2 Bakonzi 23:1

Mitindami

  • +2Nt 34:29, 30

2 Bakonzi 23:2

Mitindami

  • +Mib 31:26
  • +Kob 24:8
  • +2Ba 22:8

2 Bakonzi 23:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azongelaki kondimana.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +2Ba 11:17; 2Nt 15:10, 12
  • +Yos 24:24, 25; 2Nt 34:31, 32

2 Bakonzi 23:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +2Ba 22:4
  • +2Ba 21:1, 7; 2Nt 34:4
  • +1Ba 12:28, 29

2 Bakonzi 23:5

Mitindami

  • +2Ba 21:1, 3; Yir 8:1, 2

2 Bakonzi 23:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +2Ba 21:1, 7
  • +Mib 7:25
  • +2Nt 34:4

2 Bakonzi 23:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 18:22; Mib 23:17, 18; 1Ba 15:11, 12; 22:46

2 Bakonzi 23:8

Mitindami

  • +Yos 21:17, 19; 1Ba 15:22
  • +Eb 21:31

2 Bakonzi 23:9

Mitindami

  • +Ezk 44:10; Mal 2:7, 8

2 Bakonzi 23:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba, “Gehena.”

Mitindami

  • +Yir 7:31
  • +Yos 15:8
  • +2Ba 16:2, 3; Yir 32:35

2 Bakonzi 23:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “esika ya kolya.”

Mitindami

  • +Mib 4:19; Ezk 8:16

2 Bakonzi 23:12

Mitindami

  • +Yir 19:13; Sef 1:4, 5
  • +2Ba 21:1, 5

2 Bakonzi 23:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ ya mobali.” Elingi koloba sudi soki moto azali kotala na ɛsti.

  • *

    Elingi koloba, Ngomba ya Olive, mingimingi nsɔngɛ na yango ya sudi oyo ezalaki mpe kobengama Ngomba ya Botomboki.

Mitindami

  • +Sef 1:4, 5
  • +1Ba 11:5, 7

2 Bakonzi 23:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Kob 23:24; Mib 7:5; 2Nt 34:1, 3

2 Bakonzi 23:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +1Ba 12:28, 33
  • +2Nt 34:6, 7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” nk. 68-69

2 Bakonzi 23:16

Mitindami

  • +1Ba 13:2

2 Bakonzi 23:17

Mitindami

  • +1Ba 13:1

2 Bakonzi 23:18

Mitindami

  • +1Ba 13:30, 31

2 Bakonzi 23:19

Mitindami

  • +1Ba 12:25, 31; 13:32; 2Ba 17:9
  • +2Nt 34:6, 7

2 Bakonzi 23:20

Mitindami

  • +1Ba 13:2

2 Bakonzi 23:21

Mitindami

  • +2Nt 35:1
  • +Kob 12:3-14

2 Bakonzi 23:22

Mitindami

  • +2Nt 35:18, 19

2 Bakonzi 23:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “baterafime.”

  • *

    Liloba ya Ebre oyo basaleli awa ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela “nyɛi.” Basalelaka mpe liloba yango mpo na kotyola.

Mitindami

  • +Le 19:31; Mib 18:10, 11; 2Ba 21:1, 6; Yis 8:19
  • +Eb 31:19
  • +Mit 33:52; Mib 12:2
  • +2Ba 22:8

2 Bakonzi 23:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 4:29

2 Bakonzi 23:26

Mitindami

  • +2Ba 21:11, 12; 24:3, 4; Yir 15:4

2 Bakonzi 23:27

Mitindami

  • +Mib 29:28; 2Ba 25:11; Ezk 23:33
  • +2Ba 18:11; 21:13
  • +Mib 12:5; 1Ba 8:29; 9:3

2 Bakonzi 23:29

Mitindami

  • +1Ba 9:15; 2Nt 35:20-25; Zek 12:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2000, lok. 30

2 Bakonzi 23:30

Mitindami

  • +2Nt 36:1, 2

2 Bakonzi 23:31

Mitindami

  • +Yir 22:11
  • +2Ba 24:18

2 Bakonzi 23:32

Mitindami

  • +2Ba 21:1, 2, 19-21

2 Bakonzi 23:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talanta moko = 34,2 kg. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +2Ba 23:29
  • +Yir 39:5; 52:10
  • +2Nt 36:3

2 Bakonzi 23:34

Mitindami

  • +2Nt 36:4, 5
  • +Yir 22:11, 12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Yirimia, nk. 158-159

2 Bakonzi 23:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bato ya mokili.”

2 Bakonzi 23:36

Mitindami

  • +Yir 1:3; 22:18, 19
  • +2Nt 36:5

2 Bakonzi 23:37

Mitindami

  • +Yir 26:21; 36:22-24
  • +2Nt 28:24, 25; 33:1, 4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 23:12Nt 34:29, 30
2 Bak. 23:2Mib 31:26
2 Bak. 23:2Kob 24:8
2 Bak. 23:22Ba 22:8
2 Bak. 23:32Ba 11:17; 2Nt 15:10, 12
2 Bak. 23:3Yos 24:24, 25; 2Nt 34:31, 32
2 Bak. 23:42Ba 22:4
2 Bak. 23:42Ba 21:1, 7; 2Nt 34:4
2 Bak. 23:41Ba 12:28, 29
2 Bak. 23:52Ba 21:1, 3; Yir 8:1, 2
2 Bak. 23:62Ba 21:1, 7
2 Bak. 23:6Mib 7:25
2 Bak. 23:62Nt 34:4
2 Bak. 23:7Le 18:22; Mib 23:17, 18; 1Ba 15:11, 12; 22:46
2 Bak. 23:8Yos 21:17, 19; 1Ba 15:22
2 Bak. 23:8Eb 21:31
2 Bak. 23:9Ezk 44:10; Mal 2:7, 8
2 Bak. 23:10Yir 7:31
2 Bak. 23:10Yos 15:8
2 Bak. 23:102Ba 16:2, 3; Yir 32:35
2 Bak. 23:11Mib 4:19; Ezk 8:16
2 Bak. 23:12Yir 19:13; Sef 1:4, 5
2 Bak. 23:122Ba 21:1, 5
2 Bak. 23:13Sef 1:4, 5
2 Bak. 23:131Ba 11:5, 7
2 Bak. 23:14Kob 23:24; Mib 7:5; 2Nt 34:1, 3
2 Bak. 23:151Ba 12:28, 33
2 Bak. 23:152Nt 34:6, 7
2 Bak. 23:161Ba 13:2
2 Bak. 23:171Ba 13:1
2 Bak. 23:181Ba 13:30, 31
2 Bak. 23:191Ba 12:25, 31; 13:32; 2Ba 17:9
2 Bak. 23:192Nt 34:6, 7
2 Bak. 23:201Ba 13:2
2 Bak. 23:212Nt 35:1
2 Bak. 23:21Kob 12:3-14
2 Bak. 23:222Nt 35:18, 19
2 Bak. 23:24Le 19:31; Mib 18:10, 11; 2Ba 21:1, 6; Yis 8:19
2 Bak. 23:24Eb 31:19
2 Bak. 23:24Mit 33:52; Mib 12:2
2 Bak. 23:242Ba 22:8
2 Bak. 23:25Mib 4:29
2 Bak. 23:262Ba 21:11, 12; 24:3, 4; Yir 15:4
2 Bak. 23:27Mib 29:28; 2Ba 25:11; Ezk 23:33
2 Bak. 23:272Ba 18:11; 21:13
2 Bak. 23:27Mib 12:5; 1Ba 8:29; 9:3
2 Bak. 23:291Ba 9:15; 2Nt 35:20-25; Zek 12:11
2 Bak. 23:302Nt 36:1, 2
2 Bak. 23:31Yir 22:11
2 Bak. 23:312Ba 24:18
2 Bak. 23:322Ba 21:1, 2, 19-21
2 Bak. 23:332Ba 23:29
2 Bak. 23:33Yir 39:5; 52:10
2 Bak. 23:332Nt 36:3
2 Bak. 23:342Nt 36:4, 5
2 Bak. 23:34Yir 22:11, 12
2 Bak. 23:36Yir 1:3; 22:18, 19
2 Bak. 23:362Nt 36:5
2 Bak. 23:37Yir 26:21; 36:22-24
2 Bak. 23:372Nt 28:24, 25; 33:1, 4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 23:1-37

Mokanda ya mibale ya

23 Na yango mokonzi atindaki bábenga bankulutu nyonso ya Yuda mpe ya Yerusaleme.+ 2 Na nsima mokonzi akendaki na ndako ya Yehova elongo na mibali nyonso ya Yuda, bato nyonso oyo bafandi na Yerusaleme, banganga-nzambe, basakoli, bato nyonso, banda na mwana moke tii na mokóló. Atángelaki bango maloba nyonso ya buku+ ya kondimana+ oyo bamonaki na ndako ya Yehova.+ 3 Mokonzi atɛlɛmaki pene na likonzí mpe asalaki kondimana* liboso ya Yehova,+ ete akolanda Yehova mpe akotosa mitindo na ye, makundoli na ye ná malako na ye na motema na ye mobimba mpe na molimo* na ye mobimba mpe akotosa maloba ya kondimana oyo ekomami na buku yango. Mpe bato nyonso bandimaki kondimana yango.+

4 Nsima na yango, mokonzi atindaki Nganga-nzambe monene Hilikiya,+ ná banganga-nzambe oyo balandi ye, mpe bakɛngɛli ya baporte bábimisa na tempelo ya Yehova bisaleli nyonso oyo basalá mpo na Baala, mpo na nzete ya losambo*+ mpe mpo na limpinga nyonso ya likoló. Na nsima, atumbaki yango libándá ya Yerusaleme na mikala ya bilanga ya lobwaku ya Kidrone mpe akendaki na putulu na yango na Betele.+ 5 Bongo Yosiya alongolaki banganga-nzambe ya banzambe-bapaya, oyo bakonzi ya Yuda batyaki mpo bábimisaka milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná na kati ya bingumba ya Yuda mpe na bisika oyo ezali zingazinga ya Yerusaleme. Alongolaki mpe baoyo bazalaki kobimisa milinga ya mbeka mpo na Baala, mpo na moi, mpo na sanza, mpo na maboke ya minzoto ya zodiake, mpe mpo na limpinga nyonso ya likoló.+ 6 Abimisaki nzete ya losambo*+ na ndako ya Yehova mpe amemaki yango libándá ya Yerusaleme, na Lobwaku ya Kidrone. Atumbaki yango kuna mpe atutatutaki yango+ tii ekómaki putulu mpe abwakaki putulu yango likoló ya malita ya bato nyonso.+ 7 Akweisaki mpe bandako ya mibali oyo bazalaki kosala bondumba na bisika ya losambo,+ oyo ezalaki na tempelo ya Yehova, na esika oyo basi bazalaki kotonga bahema oyo bazalaki kosalela mpo na kosambela nzete ya losambo.*

8 Na nsima Yosiya abimisaki banganga-nzambe nyonso na bingumba ya Yuda, mpe abebisaki bisika oyo etombwaná, epai banganga-nzambe bazalaki kobimisa milinga ya mbeka, mpo ezala lisusu bisika ya losambo te. Asalaki bongo banda na Geba+ tii na Beere-sheba.+ Akweisaki mpe bisika oyo etombwaná ya baporte oyo ezalaki na esika ya kokɔta na porte ya Yosua, kapita ya engumba. Bisika yango ya losambo ezalaki na lobɔkɔ ya mwasi ntango moto azali kokɔta na porte ya engumba. 9 Banganga-nzambe ya bisika oyo etombwaná bazalaki te kosala mosala na etumbelo ya Yehova na Yerusaleme,+ kasi bakokaki kolya bagato oyo ezangi levire elongo na bandeko na bango. 10 Abebisaki mpe Tofete,+ oyo ezali na Lobwaku ya bana ya Hinome,*+ mpo ezala lisusu esika ya losambo te, mpo moto moko te alekisa mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi na mɔtɔ mpo na kopesa Moleke mbeka.+ 11 Lisusu Yosiya apekisaki bampunda oyo bakonzi ya Yuda bapesaki mpo na kosambela moi ekɔta lisusu na tempelo ya Yehova na nzela ya eteni ya ndako* oyo ezalaki mpo na Natane-meleke, mosali ya ndako ya mokonzi, oyo ezalaki na baveranda. Mpe atumbaki na mɔtɔ makalo oyo epesamaki mpo na kosambela moi.+ 12 Lisusu, mokonzi akweisaki bitumbelo oyo bakonzi ya Yuda basalaki na nsamba ya shambrɛ likoló+ ya Ahaze. Akweisaki mpe bitumbelo oyo Manase atyaki na mapango mibale ya ndako ya Yehova.+ Atutatutaki yango mpe abwakaki putulu na yango na Lobwaku ya Kidrone. 13 Bisika oyo etombwaná oyo etalanaki na Yerusaleme mpe ezalaki na sudi* ya Ngomba ya Libebi,* oyo Salomo mokonzi ya Yisraele atongaki mpo na Ashitorete nzambe-mwasi ya bosɔtɔ ya Basidone, mpo na Kemoshe nzambe ya bɔsɔtɔ ya Moabe, mpe mpo na Milikome+ nzambe oyo ayinamá ya Baamone,+ Yosiya abebisaki yango mpo ezala lisusu bisika ya losambo te. 14 Yosiya abukabukaki makonzí ya losambo mpe akataki banzete ya losambo,*+ mpe atondisaki mikuwa ya bato na bisika na yango. 15 Abukaki mpe etumbelo ya Betele, ná esika oyo etombwaná oyo Yeroboame mwana ya Nebate asalisaki Yisraele lisumu.+ Nsima ya kobuka etumbelo yango mpe esika oyo etombwaná, atumbaki esika yango oyo etombwaná, akómisaki yango putulu mpe atumbaki nzete ya losambo.*+

16 Ntango Yosiya abalukaki mpe amonaki malita oyo ezalaki na ngomba, atindaki bato bázwa mikuwa na malita yango mpe atumbaki yango likoló ya etumbelo yango. Abebisaki yango mpo ezala lisusu esika ya losambo te. Yango ekokisaki maloba oyo Yehova alobaki na nzela ya moto ya Nzambe ya solo, oyo asakolaki ete makambo oyo nyonso ekosalema.+ 17 Na nsima Yosiya alobaki: “Nazali komona libanga ya lilita kuna. Ezali lilita ya nani?” Bato ya engumba balobaki na ye: “Ezali lilita ya moto ya Nzambe ya solo oyo autaki na Yuda+ mpe asakolaki makambo oyo osali etumbelo ya Betele.” 18 Bongo alobaki: “Bótika ye apema. Moto atungisa mikuwa na ye te.” Na yango, batikaki mikuwa na ye elongo na mikuwa ya mosakoli oyo autaki na Samaria;+ basimbaki yango te.

19 Lisusu, Yosiya alongolaki bandako nyonso ya losambo oyo ezalaki na bisika oyo etombwaná oyo ezalaki na bingumba ya Samaria,+ oyo bakonzi ya Yisraele batongaki mpo na kosilikisa Nzambe. Yosiya abebisaki bandako yango ya losambo kaka ndenge asalaki mpo na esika ya losambo ya lokuta na Betele.+ 20 Mpe abomaki likoló ya bitumbelo yango banganga-nzambe nyonso ya bisika oyo etombwaná oyo bazalaki wana mpe atumbaki mikuwa ya bato likoló na yango.+ Na nsima, azongaki na Yerusaleme.

21 Bongo Mokonzi Yosiya apesaki bato nyonso mitindo oyo: “Bósala Elekeli+ mpo na Yehova Nzambe na bino ndenge ekomami na buku oyo ya kondimana.”+ 22 Elekeli ya ndenge wana esalemá naino te ezala na ntango oyo basambisi bazalaki kosambisa Yisraele to na mikolo nyonso ya bakonzi ya Yisraele mpe bakonzi ya Yuda.+ 23 Kasi na mbula ya 18 ya boyangeli ya Mokonzi Yosiya, Elekeli yango mpo na Yehova esalemaki na Yerusaleme.

24 Yosiya alongolaki mpe bato oyo basololaka na bilimo, bato oyo basakolaka makambo ekoya,+ bikeko ya banzambe ya libota,*+ bikeko ya bosɔtɔ* ná biloko nyonso ya bosɔtɔ oyo ezalaki na mokili ya Yuda mpe na Yerusaleme, mpo na kokokisa maloba ya Mobeko+ oyo ekomamaki na buku oyo Nganga-nzambe Hilikiya amonaki na ndako ya Yehova.+ 25 Na bakonzi nyonso oyo bayangelaki liboso ya Yosiya, ata moko te azalaki lokola ye, oyo azongelaki Yehova na motema na ye mobimba, na molimo*+ na ye mobimba, mpe na makasi na ye nyonso, ndenge Mobeko ya Moize elobi. Mpe nsima ya Yosiya, mokonzi mosusu te azalaki lokola ye.

26 Atako bongo, Yehova azalaki kaka na nkanda makasi mpo na Yuda. Nkanda na ye engalaki mpo na makambo nyonso ya mabe oyo Manase asalaki mpo na kosilikisa Ye.+ 27 Yango wana Yehova alobaki: “Nakolongola mpe Yuda na miso na ngai,+ kaka ndenge nalongolaki Yisraele.+ Nakobwaka Yerusaleme, engumba oyo naponá, mpe ndako oyo nalobá mpo na yango: ‘Nkombo na ngai ekozala wana.’”+

28 Makambo mosusu ya lisolo ya Yosiya, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda. 29 Ntango Yosiya azalaki koyangela, mokolo moko Farao Neko mokonzi ya Ezipito akendaki kokutana na mokonzi ya Asiri penepene na Ebale Efrate. Kasi Mokonzi Yosiya akendaki kobundisa Farao Neko. Ntango Neko amonaki ye, abomaki ye na Megido.+ 30 Bongo basaleli ya Yosiya bamemaki ebembe na ye na likalo longwa na Megido tii na Yerusaleme mpe bakundaki ye na lilita na ye. Na nsima, bato ya ekólo bazwaki Yehoahaze mwana ya Yosiya, batyaki ye mafuta, mpe batyaki ye mokonzi na esika ya tata na ye.+

31 Yehoahaze+ azalaki na mbula 23 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki sanza misato na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Hamutale+ mwana ya Yirimia, moto ya engumba Libina. 32 Yehoahaze abandaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, na kolanda nyonso bankɔkɔ na ye basalaki.+ 33 Farao Neko+ atyaki ye na bolɔkɔ na Ribla+ na mokili ya Hamate, mpo na kopekisa ye ayangela na Yerusaleme. Na nsima, akatelaki ekólo yango lomande ya talanta* 100 ya palata mpe talanta moko ya wolo.+ 34 Lisusu, Farao Neko akómisaki Eliakime mwana ya Yosiya mokonzi na esika ya tata na ye Yosiya mpe apesaki ye nkombo mosusu: Yehoyakime. Kasi amemaki Yehoahaze na Ezipito,+ mpe nsukansuka, akufaki kuna.+ 35 Yehoyakime apesaki Farao Neko palata ná wolo oyo asɛngaki. Kasi mpo na kozwa palata ná wolo yango, Yehoyakime asɛngaki bato ya Yuda* báfuta mpako ya palata mpe ya wolo na kolanda motángo oyo moto na moto asengeli kofuta.

36 Yehoyakime+ azalaki na mbula 25 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 11 na Yerusaleme.+ Nkombo ya mama na ye ezalaki Zebida, mwana ya Pedaya, moto ya engumba Ruma. 37 Yehoyakime akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ na kolanda nyonso oyo bankɔkɔ na ye basalaki.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto