Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 30
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Bilako ya mibali (1, 2)

      • Bilako ya basi mpe ya bana basi (3-16)

Mitángo 30:1

Mitindami

  • +Kob 18:25

Mitángo 30:2

Mitindami

  • +Eb 28:20-22; Bas 11:30, 31
  • +Nz 132:1-5
  • +Mib 23:21; Nz 116:14; 119:106; Mos 5:4; Mt 5:33
  • +Nz 50:14; 66:13

Mitángo 30:5

Mitindami

  • +Kob 20:12

Mitángo 30:8

Mitindami

  • +Ro 7:2; 1Ko 11:3; Ef 5:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2004, lok. 27

Mitángo 30:12

Mitindami

  • +1Ko 11:3; 1Pe 3:1

Mitángo 30:15

Mitindami

  • +Mib 23:21

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 30:1Kob 18:25
Mit. 30:2Eb 28:20-22; Bas 11:30, 31
Mit. 30:2Nz 132:1-5
Mit. 30:2Mib 23:21; Nz 116:14; 119:106; Mos 5:4; Mt 5:33
Mit. 30:2Nz 50:14; 66:13
Mit. 30:5Kob 20:12
Mit. 30:8Ro 7:2; 1Ko 11:3; Ef 5:22
Mit. 30:121Ko 11:3; 1Pe 3:1
Mit. 30:15Mib 23:21
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 30:1-16

Mitángo

30 Bongo Moize alobaki na bankumu+ ya mabota ya Bayisraele ete: “Mitindo oyo Yehova apesi yango oyo: 2 Soki mobali moko asali elako+ epai ya Yehova to alapi ndai+ mpo na koboya eloko moko, azanga kokokisa liloba na ye te.+ Akosala kaka ndenge oyo alobaki.+

3 “Mpe soki mwasi moko asali elako epai ya Yehova to asali elako ya koboya eloko moko, wana azali elenge mpe azali kofanda na ndako ya tata na ye, 4 mpe tata na ye ayoki elako na ye to elako na ye ya koboya eloko moko mpe tata na ye alobi likambo te, bilako na ye nyonso ekondimama, mpe elako nyonso oyo asali ya koboya eloko moko ekondimama. 5 Kasi soki tata na ye apekisi ye ntango ayoki ete asali bilako oyo asengeli kokokisa to asali elako ya koboya eloko moko, yango ekondimama te. Yehova akolimbisa ye mpo tata na ye apekisaki ye.+

6 “Nzokande, soki abali wana elako oyo asalaki to elaka oyo apesaki kozanga kokanisa ezali naino, 7 mpe mobali na ye ayoki yango mpe alobi likambo te mokolo oyo ayoki yango, bilako na ye to bilako na ye ya koboya eloko moko ekondimama. 8 Kasi soki mobali na ye apekisi ye na mokolo oyo ayoki yango, akoki kolongola elako to elaka oyo apesaki kozanga kokanisa,+ mpe Yehova akolimbisa ye.

9 “Kasi soki mwasi oyo mobali akufá to mwasi oyo libala ekufá asali elako, esengeli asala kaka ndenge alobaki.

10 “Nzokande, soki mwasi asali elako moko to elako ya koboya eloko moko, wana azali na ndako ya mobali na ye, 11 mpe mobali na ye ayoki yango mpe alobeli ye eloko te to apekisi ye te, bilako na ye nyonso to elako nyonso oyo akosala ya koboya eloko moko ekondimama. 12 Kasi soki mobali na ye alongoli yango nyonso na mokolo oyo ayoki bilako to elako ya koboya eloko moko, yango ekondimama te.+ Lokola mobali na ye alongolaki yango, Yehova akolimbisa ye. 13 Na kotalela elako nyonso to ndai nyonso ya elako ya koboya eloko mpo na komiyokisa mpasi, mobali na ye akondimisa yango to mobali na ye akolongola yango. 14 Kasi soki mobali na ye azali koloba na ye ata eloko moko te mokolo na mokolo, andimisi bilako na ye nyonso to bilako na ye nyonso ya koboya eloko moko oyo ezali likoló na ye. Andimisi yango mpo alobaki eloko moko te mokolo oyo ayokaki yango. 15 Kasi soki alongoli yango nsima ya mokolo oyo ayokaki yango, akomema ngambo ya libunga ya mwasi na ye.+

16 “Wana nde malako oyo Yehova apesaki Moize lokola mitindo, etali mobali ná mwasi na ye, mpe tata ná mwana na ye ya mwasi oyo azali kofanda na ndako na ye.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto