Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 32
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Loyembo ya mawa mpo na Farao mpe Ezipito (1-16)

      • Ezipito ekokundama elongo na baoyo bakatami ngenga te (17-32)

Ezekiele 32:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “loyembo ya kolela.”

  • *

    To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

  • *

    Lil., “bibale na yango.”

Mitindami

  • +Yis 51:9, 10; Ezk 29:3

Ezekiele 32:4

Mitindami

  • +Ezk 29:5

Ezekiele 32:5

Mitindami

  • +Ezk 31:12

Ezekiele 32:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bilekelo ya mai ekotonda na biloko oyo ezali kobima yo.”

Ezekiele 32:7

Mitindami

  • +Yis 13:1, 10

Ezekiele 32:9

Mitindami

  • +Ezk 29:12; 30:26

Ezekiele 32:11

Mitindami

  • +Yir 43:10, 11; 46:25, 26; Ezk 30:24

Ezekiele 32:12

Mitindami

  • +Ezk 30:10, 11; Hab 1:6
  • +Ezk 29:19

Ezekiele 32:13

Mitindami

  • +Ezk 30:12
  • +Ezk 29:8, 11

Ezekiele 32:15

Mitindami

  • +Nz 107:33, 34; Ezk 29:12
  • +Ezk 30:26

Ezekiele 32:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, “ekólo ya Ezipito.”

  • *

    To, “nkunda.”

Ezekiele 32:20

Mitindami

  • +Ezk 29:8

Ezekiele 32:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Ezekiele 32:22

Mitindami

  • +Yis 37:36; Zek 10:11

Ezekiele 32:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nkunda.”

Ezekiele 32:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nkunda.”

Mitindami

  • +Eb 10:22; Yir 49:34, 35

Ezekiele 32:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nkunda.”

Ezekiele 32:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bato na ye.”

  • *

    Lil., “bankunda na ye.”

Mitindami

  • +Eb 10:2; Ezk 38:2

Ezekiele 32:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Mbala mosusu ezali kolobela, babundi oyo bakundami na mipanga na bango, ná lokumu ya basoda.

Ezekiele 32:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nkunda.”

Mitindami

  • +Eb 25:30; Yis 34:5; Ezk 25:12, 13; Am 1:11; Ob 1; Mal 1:4
  • +Yir 9:25, 26

Ezekiele 32:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bakambi.”

  • *

    To, “nkunda.”

Mitindami

  • +Eb 10:15; Ezk 28:21

Ezekiele 32:31

Mitindami

  • +Ezk 31:16

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 32:2Yis 51:9, 10; Ezk 29:3
Ezk. 32:4Ezk 29:5
Ezk. 32:5Ezk 31:12
Ezk. 32:7Yis 13:1, 10
Ezk. 32:9Ezk 29:12; 30:26
Ezk. 32:11Yir 43:10, 11; 46:25, 26; Ezk 30:24
Ezk. 32:12Ezk 30:10, 11; Hab 1:6
Ezk. 32:12Ezk 29:19
Ezk. 32:13Ezk 30:12
Ezk. 32:13Ezk 29:8, 11
Ezk. 32:15Nz 107:33, 34; Ezk 29:12
Ezk. 32:15Ezk 30:26
Ezk. 32:20Ezk 29:8
Ezk. 32:22Yis 37:36; Zek 10:11
Ezk. 32:24Eb 10:22; Yir 49:34, 35
Ezk. 32:26Eb 10:2; Ezk 38:2
Ezk. 32:29Eb 25:30; Yis 34:5; Ezk 25:12, 13; Am 1:11; Ob 1; Mal 1:4
Ezk. 32:29Yir 9:25, 26
Ezk. 32:30Eb 10:15; Ezk 28:21
Ezk. 32:31Ezk 31:16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 32:1-32

Ezekiele

32 Na mbula ya 12, na mokolo ya liboso ya sanza ya 12, Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, yembá loyembo ya mawa* mpo na Farao mokonzi ya Ezipito mpe lobá na ye boye:

‘Ozalaki lokola mwana-nkɔsi ya makasi* ya bikólo,

Kasi okangisami monɔkɔ.

Ozalaki lokola nyama ya nsɔmɔ oyo ezalaka na mbu,+ ozalaki komibwakabwaka na kati ya bibale na yo,

Ozalaki kobebisa mai na makolo na yo mpe kobebisa bibale.’*

 3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

‘Nakobwakela yo monyama na ngai na nzela ya lisangá moko ya bikólo ebele,

Mpe bakokanga yo na monyama na ngai.

 4 Nakosundola yo na mokili,

Nakobwaka yo na esobe mpenza.

Nakosala ete bandɛkɛ nyonso ya likoló efanda likoló na yo,

Mpe nakosala ete banyama nyonso ya zamba ya mabele mobimba elya yo mpe etonda.+

 5 Nakobwaka mosuni na yo likoló ya bangomba

Mpe nakotondisa mabwaku na biteni ya ebembe na yo.+

 6 Nakopɔlisa mokili tii na likoló ya bangomba na makila oyo ekotanga yo,

Mpe ekotondisa mikɛli ya mai.’*

 7 ‘Mpe ntango okobomama, nakozipa likoló mpe nakoyindisa minzoto na yango.

Nakozipa moi na mapata,

Mpe sanza ekopesa pole na yango te.+

 8 Nakoyindisa bingɛngiseli nyonso ya pole na likoló mpo na yo,

Mpe nakozipa mokili na yo na molili,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

 9 ‘Nakotungisa motema ya bato ebele ya bikólo ntango nakomema bakangami na yo na bikólo mosusu,

Na mikili oyo oyebi te.+

10 Nakosala ete bato ebele ya bikólo bázala na nsɔmɔ,

Mpe bakonzi na bango bakolɛnga na nsɔmɔ mpo na yo ntango nakoningisa mopanga na ngai liboso na bango.

Bakolɛnga ntango nyonso, moto na moto akobanga ete akufa,

Na mokolo ya kokwea na yo.’

11 Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

‘Mopanga ya mokonzi ya Babilone ekoya kobɛta yo.+

12 Nakokweisa ebele ya bato na yo na mopanga ya bilombe ya etumba,

Bazali banyokoli mpenza ya bikólo, bango nyonso.+

Bakosilisa lolendo ya Ezipito, mpe ebele ya bato na ye nyonso bakosilisama.+

13 Nakoboma bibwɛlɛ na ye nyonso, pene ya mai na ye mingi,+

Mpe ata lokolo moko te ya moto to sabo ya ebwɛlɛ ekobebisa yango lisusu.’+

14 ‘Na ntango yango nakopɛtola mai na yango,

Mpe nakolekisa bibale na yango lokola mafuta,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

15 ‘Ntango nakokómisa Ezipito mokili oyo etikalá mpamba, mokili oyo ezangi nyonso oyo ezalaki na kati,+

Ntango nakoboma bato nyonso oyo bafandi kuna,

Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.+

16 Oyo ezali loyembo ya mawa, mpe bato bakoyemba yango mpenza.

Bana basi ya bikólo bakoyemba yango.

Bakoyemba yango mpo na Ezipito mpe mpo na ebele ya bato na ye nyonso,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

17 Bongo na mbula ya 12, na mokolo ya 15 ya sanza yango, Yehova alobaki na ngai ete: 18 “Mwana ya moto, lelá mpo na ebele ya bato ya Ezipito mpe kitisá ye* na mokili ya nse, ye ná bana basi ya bikólo ya nguya, elongo na baoyo bazali kokita na libulu.*

19 “‘Oleki nani na kitoko? Kitá na nse, mpe lalá esika moko na bato oyo bakatami ngenga te!’

20 “‘Bakokwea na katikati ya bato oyo babomami na mopanga.+ Abomami na mopanga. Bóbenda ye ná ebele ya bato na ye nyonso.

21 “‘Uta na mozindo ya Nkunda,* bilombe mpenza ya etumba bakosolola na Farao ná basungi na ye. Ya solo, bakokita na nse mpe bakolala lokola bato oyo bakatami ngenga te, babomami na mopanga. 22 Kuna nde Asiri ná lisangá na ye mobimba bazali. Bankunda na bango ezali zingazinga na ye, bango nyonso babomami na mopanga.+ 23 Bankunda na ye ezali na mozindo ya libulu,* mpe lisangá na ye ezali zingazinga ya nkunda na ye, bango nyonso babomami na mopanga, mpo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi.

24 “‘Kuna nde Elame+ ná ebele ya bato na ye nyonso bazali zingazinga ya nkunda na ye, bango nyonso babomami na mopanga, bakiti na mokili ya nse, kozanga ete bákatama ngenga, baoyo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi. Sikoyo bakomema nsɔni elongo na baoyo bazali kokita na libulu.* 25 Batyeli ye mbeto na katikati ya bato oyo babomami, elongo na ebele ya bato na ye nyonso zingazinga ya bankunda na ye. Bango nyonso bakatami ngenga te, babomami na mopanga, mpo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi; mpe bakomema nsɔni na bango elongo na baoyo bazali kokita na libulu.* Atyami na katikati ya bato oyo babomami.

26 “‘Kuna nde Mesheke ná Tubale+ mpe ebele ya bato na bango* nyonso bazali. Bankunda na bango* ezali zingazinga na ye. Bango nyonso bakatami ngenga te, batɔbɔlami na mopanga, mpo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi. 27 Bakolala nde te elongo na bilombe ya etumba oyo bakatami ngenga te, baoyo bakwei mpe bakiti na Nkunda* elongo na bibundeli na bango ya etumba? Mpe bakotya mipanga na bango na nse ya mitó* na bango, mpe masumu na bango ekozala likoló ya mikuwa na bango, mpo bilombe ya etumba yango bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi. 28 Nde yo, okobebisama na katikati ya bato oyo bakatami ngenga te, mpe okolala elongo na baoyo babomami na mopanga.

29 “‘Kuna nde Edome,+ bakonzi na ye mpe bankumu na ye nyonso bazali, baoyo atako nguya na bango, balalaki esika moko na baoyo babomami na mopanga; bango mpe bakolala elongo na bato oyo bakatami ngenga te+ mpe elongo na baoyo bazali kokita na libulu.*

30 “‘Kuna nde bankumu* nyonso ya nɔrdi bazali, ná Basidone+ nyonso, baoyo bakiti na nsɔni elongo na bato oyo babomami, atako bazalaki kopesa bato nsɔmɔ mpo na nguya na bango. Bakolala kozanga ete bákatama ngenga elongo na baoyo babomami na mopanga mpe bakomema nsɔni na bango elongo na baoyo bazali kokita na libulu.*

31 “‘Farao akomona bango nyonso, mpe akobɔndisama mpo na nyonso oyo ekómeli ebele ya bato na ye;+ Farao ná limpinga ya basoda na ye nyonso bakobomama na mopanga,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

32 “‘Lokola apesi nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi, Farao ná ebele ya bato na ye nyonso bakokundama ná bato oyo bakatami ngenga te, elongo na baoyo babomami na mopanga,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto